Home DR Congo Fridolin Ambongo a telemeli mokano mwa Tshisekedi te

Fridolin Ambongo a telemeli mokano mwa Tshisekedi te

by venuste.com

Ba sango etamboli o nzela ya ba réseaux sociaux, oyo elobi été Episkopo wa lokumu wa engumba Kinshasa, Papa Cardinal Fridolin Ambongo, asepeli soki moke te na mokano mozwamaki na mbulamatari ya ekolo, ba sango wana ezali ya lokuta.

Mokano oyo molobi ete biyamba nionso ya Nzambe eko fungola bikuke o mikolo mya sanza 15 o sanza ya muambe.

Moko mosungi wa Papa Cardinal alobi ete engumba katoliki eyambi na esengo, ete misa mia bango mia liboso miko salema o mokolo oyo bango balengelaka milulu mya assomption.

O nzela ya allô allô, Chancellier wa eklezia alobaki ete Papa Cardinal atikala ata mokolo moko te kosala bokokani o kati ya misala mya Nzambe na misala mya boteki masanga to bar.

Mikolo mibale eleki, molobeli ya lingomba ya bapiskopo, Abbé Donatien Nshole, alobaki ete ezali malamu te mbulamatari apesa ndingisa na bato ya koteka masanga liboso ya bato na losambo.

Wana ewutaki na monoko mwa Abbé Nshole kasi na monoko ya Papa Cardinal te.

Elimbola wuta na Congo Check.

Coronavirus: l’église catholique n’a pas déclaré qu’elle va reprendre les cultes le 27 juillet prochain

You may also like